Recherche na ngai etalaka ndenge ba système ya AI elukaka, ekangisaka pe e évaluaka ba preuve na kati ya minoko, ba document, ba image pe littérature scientifique.
Nakomisaka recherche oyo ba pair ba talela elongo na ingénierie ya mokili ya solo na foundation models, AI multimodale, computer vision, intelligence documentaire pe évaluation fiable. Mosala yango esangisi brevet américain oyo epesami mpo na confidentialité pe désidentification ya ba image.
Recherche pe éducation ezali biteni ya projet moko: boyebi ya AI oyo ezali na tina esengeli ezala rigoureux, pratique pe ezala accessible koleka Anglais. Na nzela ya Dr. Kabongo, nalakisaka na Anglais, Français, Lingala, Tshiluba pe Swahili.
Conviction wana ekambaka mpe mosala na ngai na DarAkili, plateforme ya éducation STEM esika ba professionnel ya Afrique babimisaka minicours ofele na minoko na bango moko.
Recherche emonisaka nini ekoki kosalema. Ingénierie emekaka yango na mokili ya solo. Kolakisa esalaka ete boyebi etambola.